Table des matières

Mena a Mukelenge Yesu — Yesu, Dina dia buntu buende
Liloba Akomi Mosuni (Yoane 1:14)
KOBIKISA NA NOA NA KATI NA MASUA (Genese 7)
GENESE 8

 

Mena a Mukelenge Yesu

Yesu, Dina dia buntu buende

 

«Umuidike ne, YESU, bualu bua yeye neasungile bantu bende ku mibi yabo». (Matayo 1:21).

 

Dina dia Mukelenge wetu, YESU, didi dia mushinga mukole kudi bantu bende. Didi dibambila bualu bua Musungidi mupueke mu diulu, mupueke ne luse, bua kubasungila. Dina edi dia YESU, didi diamba kabidi bualu bua muntu kua Nzambi, «kuakabuela Yesu bu mudianjidi bua bualu buetu» (Ebelu 6:20). YESU, ndina dia Mukelenge mu buntu buende. Mukelenge Yesu udi muntu bu tuetu nkayetu, kadi yeye kakadi ne mibi. Yeye kakenza bualu bubi, kabakamusangana ne didinga mukana muende. (1 Petelo 2:22). (Nyuma Muimpe udi ulama Bunzambi bua Mukelenge Yesu mu Mukanda wa Nzambi menemene. Diambedi yeye kayi muanji kuledibua, muanjelo Gabaliele wakambila mamuende, Malia, ne, Mona, wewe newimite difu, neulele muana mulume, neumuidike ne, YESU ; yeye neikale munene, nebamuidike dina ne, Muana wa Udi Mutambe Bunene wa mu diulu … nebidike muana wa tshijila uwalela ne, Muana wa Nzambi (Luka 1:31, 32, 35).

 

Nzambi wakamueneshibua mu mubidi wa muntu

Diyi diakakudimuka muntu, diakuikala munkatshi muetu tshitupa. Nzambi … wakamueneshibua mu mubidi wa muntu (Yone 1:14 ; 1 Timote 3:16).

Dina dia «YESU» didi muaku wa Bena Gelika didi difuma ku miaku ibidi, «Yehowa», ne «Hoshea» anyi «Yoshua». Dina dia «Hoshea» didi diamba bua «musungidi», Mukelenge Yesu udi YEHOWA MUSUNGIDI. Tudi tubala bua bualu buende ne, Meme, meme mene, ndi Yehowa, kakuena musungidi mukuabo kabidi anu meme nkayanyi. (Yeshaya 43:11).

 

Dina dia YESU didi dituambila bua dinanga

Kakuena muntu udi ne dinanga didi ditambe edi, dia muntu udi ufuila balunda bende (Yone 15:13). Meyi aa adi meyi a Mukelenge Yesu, kadi yeye biende wakafuila bena lukuna nende, wakafuila bobo kabayi ne Nzambi, kabayi ne ditekemena, bantu bafue mu malu mabi abo. Mukanda wa Nzambi udi wamba ne, Misulu ya mayi ya bungi kayena mimanye mua kujima dinanga, mayi a bungi kaena mamanye mua kudifuisha mu mayi. (Musambu wa Solomo 8:7). Kadi mavuala ne mambuanka a tshiji tshia Nzambi, bualu bua bubi (bubi buetu), akapita pamutu pende. (Misambu 42:7 ; 69:1, 14, 15). Mukelenge wa Butumbi wakapueka mu diulu, mu dinanga ne luse, bua kutuala malu mabi etu ne kutufikisha kudi Nzambi.

 

Dina dia YESU didi dituambila bua lupandu

YESU ndina dia Musungidi. Tudi tuvuluka mukenji wa muanjelo ne, Umuidike ne, YESU, bualu bua yeye neasungile bantu bende ku mibi yabo. Mukanda wa Nzambi udi wamba ne, Mu munga muntu yonso kamuena lupandu, bualu bua kakuena dinga dina muinshi mua diulu, dipa bantu, didi dimanye mua kutusungila. (Bienzedi 4:12). Dina dia YESU didi dia mushinga mukole kudi muntu yonso wakalua kudiye bua lupandu.

 

Dina dia YESU didi pamutu pa mena onso

Bantu babi bakamba ne, Yeye neafue diba kayi, ne dina diende nedijimine diba kayi? (Misambu 41:5). Nzambi wakamba ne, Nenvuishe dina diebe bu dina didibo bavuluka mu bikondo bionso ; nunku bantu nebakutumbishe too ne kashidi. Dina diende nedishaleku tshiendelele ! Dina diende nedishale kudi tunkanunuina tuende patshidi diba ditema. Bantu nebadivudishile disanka mu bualu buende ; bisamba bionso bia bantu nebimubikile ne, Udi ne disanka (Misambu 45:17 ; 72:17). Nzambi wakamubandisha kulu kule, wakamupa dina didi pamutu pa dina dionso ; ne bua mu dina dia Yesu binu bionso bitue panshi, ne bia bintu bia mu diulu ne bintu bia pa buloba ne bintu bia muinshi mua buloba, ne bua ndimi yonso yambe patoke ne Yesu Kilisto udi Mukelenge, too ne ku butumbi bua Nzambi Tatu. (Filipoi 2:9-11).

 

 

 

Liloba Akomi Mosuni

Yoane 1:14

«Liloba akomi mosuni mpe atemisi mongombo na ye kati na biso mpe tomoni nkembo na ye, nkembo lokola mwana oyo abotami lokola mwana-na-likinda longwa na Tata ; atondi na ngolu mpe na solo». Totangi na eteni 1 ya mokabo oyo ete, Na ebandeli Liloba ajalaki, mpe Liloba ajalaki epai na Njambe, mpe liloba ajalaki Njambe solo. Awa, na eteni 14 tomoni ete, Liloba akomi mosuni mpe atemisi kati na bato. Tokanisi likambo oyo.

Tango ayei Mokonji Yesu na mokili, ye atongami te ; ye moko ajali Mojalisi ya biloko yonso ; boye ye moko atongamaki na ebandeli te ; ye ajalaka na libela na libela. Lelo toyebi ntina na likambo oyo na kokamwa te ; soko tokoyeba moke mokolo mosusu.

Njambe alingaki bato na mokili mpe ye alingaki ete, Bango bayeba bolingo na ngai ayoki ngai bato. Ye asokolaki Mwana na ye Yesu Mobikisi epai na biso na mokili, mpe ye akomi moto kati na bato mosusu awa. Ye akomi pelamoko bato, ajalaki na njoto, alati bilamba, alei biloko ya koliya lokola bato mosusu, kasi ye ajalaki na mabe soko moke te.

Moto mosusu amoni nselele ; ye mpe abanji ete, Soko nayebi koloba na yango nde malamu ; nakoyeba likanisi na yango mpe makambo na yango. Kasi nayebi kosolola na yango te ; ngai nalobi monoko na bato, kasi yango alobi monoko na nselele. Yango ayebani na kokonyolana soko na kolumbutana nsolo. Boye, tokoyeba kososolana te.

Kasi Mokonji Yesu akomi moto boye. Ye ajalaki lokola ngai mpe yo ; ye alobaki monoko ya bato na Yisalaele. Ye ayebaki lobanjo na bato. Na liboso wana mokili ajalaki te, ye ajalaki epai na Njambe Tata kuna na lora, kasi ye akitaki awa na bolingo monene koluka bato mabongami. Ata ye ajalaki na motindo ya Njambe, ye amujeisi mpamba, akamati motindo ya moombo, abotami na lolenge na bato. Asili ye kokoma na motindo ya moto, ye amisokisi mpe atosi kino kufa. Kufa na ye ajalaki kufa na ekulusu. Tala Bafilipi 2:6-8. Na bolingo na ye na kokamwa, Yesu ayei awa penepene na bato na mabe, awei na njete kuna na Gologota kobikisa biso. Liloba akomi mosuni mpo ete asukisa mosala oyo monene. Kanisa likambo oyo na mokolo na mokolo kino yo okososola yango ; kino yo okoyeba kosambela Njambe mpo na likabo oyo na motuya mingi. Njambe apesi bato mikabo mingi, mingi ; likabo aleki yonso oyo. «Mpo ete Njambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete ajala na bomoi na seko» Yoane 3:16.

Mokonji monene mosusu alingaki koyeba makambo na babola ya ese na ye. Ye akendaki epai na bango na milolo mpe na bisanju na bango alati milato ya mokonji te ; kasi ye alongoli bilamba na ye ya malamu, alati munbusu mpe lisuku ya kalakala. Ye mpe akei epai na babola, asololi na bango, ayebi mpasi ayoki bango, alei biloko na bango. Boye ye abelemi na bato oyo, ayebi makambo na bango.

Soko Yesu Mokonji ayei epai na biso boye te nde ye ayebi kosunga bato te. Ye mpe atuni kino kufa. Mpo nini ? Ye awei mpamba te biso tojali bato na kufa. Mokili ajali esika ya kufa, ajali esika ya bomoi te. Bato bajali na kati ya kufa mpo na masumu na bango, mpe Yesu Mokonji ayei awa kobikisa bato na kufa, kopesa bango lobiko na seko. Liloba akomi mosuni mpe ye asalaki mosala oyo ya kokamwa, ete tójala na bomoi boleki mingi.

 

Rédigé en langue Lingala par J. Barnes (Kitoko).

 

 

 

KOBIKISA NA NOA NA KATI NA MASUA

Genese 7

 

Totangi ete; «Mpo na kondima, Noa akebisami mpo na makambo mamonani naino te, mpe atii motema na bojito, atongi masua mpo na kobikisa libota na ye» Baebele 11:7. Totangi na Genese 6:8 ete, «Noa ajuaki ngolu na miso na Yawe».Ye ajuaki ngolu oyo mpo nini ? Ye ajuaki yango mpo ete, ye ajalaki na kondima. Totangi na 6:9 ete, «Noa ajalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato na ntango na ye». Moto oyo ajali na sembo na miso na Njambe, ye moto na kondima. Boye, Noa ajalaki moto na kondima. «Mpo na KONDIMA» ye atongi masua yango.

Tomonaki na ekabo 6 ete, Njambe asakolaki ete, «Ngai moko nakotinda mpela na mokili mpo na kobebisa mosuni yonso yango ejali na mpema na bomoi na nse na likolo». Mpela yango ejalaki na mosala na koboma bato yonso longola bobele Noa mpe libota na ye. Bango bayebaki kokima kufa bobele na kati na masua boye Njambe alakisaki Noa motindo na masua na ye kotonga mpe monene na yango.

Wana masua esili kotongama, Njambe alobaki na Noa ete, «Kota na masua yo mpe libota na yo yonso, mpo ete namoni ete, yo ojali na boyengebene liboso na ngai na kati na bato oyo». Tika toyeba ete, Noa ajalaki na boyengebene oyo mpo na kondima na ye. Masua ejali elilingi na Klisto Yesu. Njambe asalaki esika na kobikisa bato bobele na kati na Mwana na ye Yesu Klisto. Soko biso tosili kobomba na kati na ye, tokobikisama; soko toboyi ye tokobebisama. Paulo akomaki na bato na Baloma ete, «Na boye, sasaipi bango kati na Klisto Yesu bakokitisama te». Yo mpe ngai, soko tojali kati na Klisto, tobikisami. Ye akoti na Bakolinti ete, «Boye, soko moto ajali kati na Klisto akomi bojalisi na sika» 2 Bakolinti 4:17. Masua ejalaki na kati na mai, Yango moko. Mpo ete Noa ajalaki na kati na yango, ye mpe bana, mai ekomi penepene na njoto na bango te. Mai esili kokoma na njoto na masua, ekomi na njoto na bato baoyo te. Kufa ekamataki njoto na Mobikisi na biso, bongo yango ejali na nguya na kokamata bato na ye te.

Tika tokanisa makambo masato na Noa.

1) Ye andimaki maloba yonso alobelaki ye Njambe. Ye alobaki ete, Nakotinda mpela kokufisa bato yonso balingi kondima ngai te. Noa atiyanaki na Njambe ntembe te; ye andimaki bobele liloba na Yawe, mpe ye ayokaki Yawe limemia mingi. Malamu biso tojala pelamoko Noa. Soko Njambe asili koloba liloba, malamu biso yonso kondima liloba na ye, kotiyana na Njambe ntembe te. Ye ajali Njambe na yonso mpe Mojalisi na yonso.

2) Esili Noa koyoka liloba na Yawe, ye amongaki te. Ye abandaki kotonga ebei na kobikisa libota na ye nokinoki. Noa ajilaki te kino mbula ebandaki konoka, kasi ye asalaki mosala na kotonga masua sasaipi. Ejali malamu biso koyekola na makambo masalaki Noa. Wana Njambe alobi liloba, malamu kosala yango sikawa; malamu kosala bobele pelamoko ye alobi, malamu te moto kosala likanisi na motema na ye mpenja.

3) Wana Njambe alobaki na ye ete, Kota na kati na masua, Noa akotaki, akotisaki libota na ye, akotisaki lokola nyama yango, motindo mpe motindo pelamoko Yawe alobaki ye. Noa atosaki maloba na Yawe yonso. Soko biso tolingi kosepela na bomoi na biso, tokosepela soko tokotosa liloba na Njambe na biso.

Noa ayokaki liloba na Yawe mpe ye atosaki liloba yango. Ye asalaki ebei pelamoko Njambe alakisaki ye. Ye akotaki na kati na masua pelamoko Yawe alakaki ye. Kasi Njambe, ye mpenja, akangaki ekuke na masua; Noa akangaki ekuke te, bobele Njambe akangaki yango. Kobikisa ejali mosala na Njambe ye moko. Biso toyebi komibikisa te; bobele ye ayebi kosala mosala oyo. «Yawe akangaki ekuke na nsima na ye». Esili ye kokota, Njambe akangaki ekuke. Soko ye asili kokanga ekuke, moto mosusu atikali libanda akoki kokota te ; moto ajali na kati ayebi kokenda libanda te. Ekuke na Njambe ejali katikati na bango. Totangi na Matai 25:10 ete, Ekei baseka mitano na bilema kosomba mafita, bakangi ekuke. Na sima bayei koloba ete, Nkolo ! Nkolo ! Jipwela biso ! Nde ye andimi te, alobaki ete, «Nayebi bino te». Soko tolingi kokota na masua na kobikisa, tika ete, tokota na ntango ejipwi ekuke. Soko bato bakotiyola liloba na Mokonji bakotikala na libela, bakokota na kati na ndako na ye te.

Tika ete, Lisapo oyo na Noa ajala liloba na kopesa biso toli.

 

Rédigé en langue Lingala. Par J. Barnes (Kitoko).

 

 

 

GENESE 8

 

Noa mpe libota na ye bafandaki ngwi na masua, nde bato basusu, baingelaki te na kati na masua babebisamaki. Mpo nini ? Mpo ete kobikisa ejalaki bobele na kati na masua yango. Masua ejalaki monene ; esika na bato mingi ejalaki, kasi bato mingi balingaki kokota te ; mpe bo yonso bakufaki na mai. Bikumbake minene na mai eyebaki koboma masua te, mpe mai eyebi kokota na kati na yango te. Noa atiyaki biloko na koliya, ndenge na ndenge, na nkobe ya masua. Na kati na yango ndjala ejalaki te ; na libanda ejalaki boloji mpe liwa. Noa akotisaki nyama, ndenge na ndenge, na esika ya kobika na masua, mpe mwasi, mpe bana na ye misato, mpe basi na bango, mpe nyama baleisaki biloko yango kino mpela esilaki na mokili, mpe bango yonso babikisamaki.

Nalingi kotuna yo, ndeko, été ; yo osili kokota na masua na kobika ? Masua ejali elilingi na esika na kobika epai na Yesu Masiya. Yo oyebi kokota, mpe yo okojua lipambola na Njambe Tata ; soko yo oboyi kokota katikati, na libanda ya yango ejali bobele kofinga mpe kokufa.

Na v.1 totangi été ; Njambe akanisaki Noa, mpe nyama yonso mpe bibwele yonso bijalaki na ye na masua. Wana ye akotaki na kati ya masua, Yawe moko akangaki ekuke na nsima na ye. Malamu biso yonso kokanisa likambo oyo. Njambe alobelaki Noa été ; Kota na masua ; ye moko akangaki ekuke na yango ; ye abatelaki mosali na ye na kati ya masua ; ye moko abikisaki ye. Njambe moko asalaki mosala yonso ya kobikisa bato na ye ; bango basalaki mosala te, bobele ye. Soko biso tokobika na lipambola na solo, Njambe akobikisa biso ; bato bayebi komibikisa te.

«Njambe akanisaki Noa» (v.1). Ye asili kokotisa moto na ye na masua, kasi ye abungi Noa te. Njambe ajali na misala mingi mingi na kosala, kasi ye abungi bato ne ye te. Ye akanisaki Noa mpe bango yonso bajalaki na ye na masua. Ye mpe alekisaki mopepe likolo ya majobo oyo ebombaki mokili mpo na kokaokisa yango. Na nsima ya mikolo mokama moko na ntuku mitano mai asilaki kolongwa na esika ya ngomba, boye masua esemaki nye likolo na ngomba ya Alata. Mai alongwaki naino na mokili, mpe nsonge ya ngomba imonanaki na likolo ya mai (v.5).

Na nsima ya mikolo ntuku minei, Noa ajipolaki lininisa na masua, mpe ye atindaki ndeke, ndenge ya wangana, ete; Nakotala eloko nini ekokela yango. Kasi wangana ejongaki epai na Noa te; mbele yango ekutaki biloko ya kolia mingi etefaki na likolo ya mai, pelamoko nyama mingi ikufaki. Na nsima Noa atindaki ebenga kotala soko mai ebandi kosila na mokili, kasi ebenga etikalaki libanda te lokola ekelaki wangana liboso kasi yango ejongaki epai na Noa. Alambelaki mikolo misusu nsambo, Noa atindaki ebenga yango lisusu, mpe yango ejongaki epai na ye, esimbaki lokasa ya sika na njete ya bilaya (olive) na ekomo. Mpe Noa ayebaki ete; Mai ekiti solo na mokili, mpo na njete ibotaki nkasa. Alambelaki mikolo misusu nsambo mpe ye atindaki ebenga lisusu, kasi yango ejongaki epai na Noa te; boye Noa ayebaki ete; Mai esili kokita na mokili.

Malamu biso kokanisa ndeke oyo mibale. Ndeke ya wangana ejali elilingi ya moto mbindo akotisaka biloko mbindo na motema na ye. Ebenga ejali elilingi na moto oyo asili koyamba Molimo Mosanto na motema na ye. Ye ayebi kokotisa biloko mbindo na motema na ye te. Moto ajali na Molimo Mosanto na motema akoyebaka kosepela na makambo mbindo na mokili te.

Wana mpela ekaokaki yonso na mokili, Noa alongolaki ejipelo ya masua, mpe ye amonaki ete; Mokili esili kokaoka, kasi ye alambelaki liloba na Yawe, abimaki na kati ya ebombelo te kino Yawe apesaki ye njela ya kobima na kati ya masua yango. Bongo Njambe alobelaki Noa ete; «Bima na masua, yo mpe mwasi na yo mpe bana babali na yo mpe basi na bango na yo elongo» (v.15, 16). Boye Noa mpe libota na ye yonso babikaki na kati ya masua kino mpela eshilaki na mokili. Wana Noa abimaki na kati ya masua, ye amonaki mokili ya mpeto; Yawe asilaki kopetisa yango. Likambo oyo ejali elilingi ya mokili pelamoko akopetisa Njambi yango na nsima, mpe bato na ye na mokili, bato ya Isaliyele mpe bato basusu bakofanda na mokili ekopetisa Njambe malamu, mpe bakofanda na makambo na kimia mpe na makila malamu. Mabota na bato ya mokili bakokisa na makambo ya kimia, bakoswana lisusu te. Yawe atikelaki bato na ye elaka ya ntango oyo na mikanda ya masakoli bakomaki maloba na bonjenga ya mikolo yango ya esengo mingi. Malamu yo kotanga Njembo 72; Yisaya 35 mpe 60.

Noa mpe libota na ye babimaki na masua mpe bango babimisaki nyama yonso na masua. Likambo likanisaki Noa na liboso na makambo mususu yonso ejalaki kolambola Yawe litondi mpo na mawa na ye mingi. Ye asalaki etumbelo mpo na Yawe, mpe ye alambolaki nyama ya mpeto na mitindo yonso, mpe ndeke ya mpeto mpo na kotonda Njambe. Solo ye ajalaki Mobikisi ya malamu, abikisaki Noa mpe litonda na ye yonso.

Na mikolo ya lobiko ya Yesu Masiya na mokili, mokolo moko ye abikisaki bato na mbala jomi, kasi bobele moko na bango ajongaki epai na Yesu kotonda ye. Bato mosusu libwa bapetwaki lokola ye bajongi epai na Mobikisi te; bakendaki bobele kotalisa banganga njoto na bango, mpe bakendaki na ndako na bango, mpe epai ya mabota na bango. Bobele Mosamalia ajongi kotonda Mopetisi na ye. Natuni yo ndeko, soko Yesu apetisaki yo, apesaki yo bomoi na seko, yo ojongaki kopesa ye litondi ? Bunga te kotonda Mopetisi na yo. Tala Luka 17:11-19.

Njambe alingi bato kojala masambeli na ye moko. Tala Yoane 4:23, 24. Bomoto oyo lokula ajalaki mosambeli na Njambe, mpe motondi na ye na solo. Ye ajalaki Mosamalia lokula moto oyo na mbaya. Ngai mpe yo, tika ete tobunga te kojonga na Yesu ntina na kopesa ye litondi mingi. Ye abikisaki yo na kobikisa ya kokamwa.

 

Rédigé en langue Lingala, par J. Barnes (Kitoko).